Solola na lisungi ya mibéko ya Pine Tree mpo na kozwa lisungi ya maye matali mibéko
Na telefone
Benga biso na 942-8322 na bangonga na biso ya mosala:
- Mwa Yambo 12:00 pm – 2:30 am
- Mwa Mibalé 9:00 am – 11:30 am
- Mwa Minei 9:00 am – 11:30 am
Na presentiel
Na babiro na biso:
Augusta: Mwa Misato 9:00 – 11:30 am
Bangor: Mwa Misato 1:00 – 4:00 am
Lewiston: Mwa Mitano 9:00 – 11:30 am
Machias: Mwa Yambo 9:00 – 11:30 am
Portland: Mwa Misato 9:00 – 11:30 am
Presque Isle: Mwa Yambo, Misato, mpe Mitano 9:00 - 11:00am. Tokoki mpe kozala disponible na bangonga mosusu na bangogo ya normale ya mosala, benga biro ya Presque Isle mpo na kotuna soki tozali disponible.
Na ba communauté na biso:
Biro ya Houlton Town: Mwa Misato ya 1 mpe ya 3 ya sánzá, 1:00 – 3:00 am
Biro ya Fort Kent Town: Mwa Mitano ya 1 mpe ya 3 ya sánzá, 1:00 – 3:00 am
Olobaka lokota mosusu kasi Anglais te?
Soki obengi biso tó oeyi na biro na biso, senga mobongoli kolota mbala moko. Tokolukela yo mobongoli kolota moko ya ofele.
Okoki kobenga biso na 207-942-8322. Fina “2.” Na nsima fina:
- Pulse 1 para español. (1 mpo na espagnole)
- (2 mpo na lokota ya arabe) للغة العربية اضغط الرقم اثنان
- Haddii aad rabto Af Somali riix 3. (3 mpo na lokota ya somali)
- Pressione 4 para Português. (4 mpo na portugais)
- Fina 5 mpo na Lingala. (5 mpo na Lingala)
- Appuyez sur 6 pour le français. (6 mpo na français)
- Peze 7 pou Kreyòl Ayisyen. (7 mpo na creole ya haiti)
Tika message mpo na koyebisa biso epai wapi ozali kati na etuka, likambo na yo, mpe ndenge tokoki kobenga yo. Mosali moko akobenga yo na eleko ya mikolo 5-7 ya mosala.
Lisungi ya mibéko ya Pine Tree esalaka nini?
Lisungi ya mibéko Pine Tree (PTLA) eza lisangá ya lisungi ya mibéko mpo na basivile. Tosalisaka bato oyo baza te na makambo ya crime mpo na kosilisa mikakatano na bango. Ntango mosusu, esukaka na masolo na telefone mpo na kopesa yo toli na likambo moko, mpe mbala mosusu, esengaka avoka azala momonsi na yo na tribinale.
Makambo oyo tosalisaka bato mbala mingi ezalaka:
- Ndáko ya kofutela, kobengama na ndáko, ndáko ya malonga te, tó binsekwa.
- Makambo etali masungi ya mbongo neti SNAP (bons ya bilei), TANF, Mainecare, tó Lisungi ya Generale
- Bana bazozwa te mateya tó misala baza na yango mposo mpo na koyékola mpe kozala na securité na etéyelo. Kende na programe na biso KIDSLegal.
- Makambo ya ba consommateurs lokola ba collecteurs ya banyongo, bakarte ya crédit, mbongo badefisaka bayékoli, bampako ya bandáko, kosimibisa bandáko tó mapango mpe kosomba mituka basila kosalela.
- Mikakatano na IRS tó mpako ya federale ya lifúta. Kende na clinique na biso mpona bafuti-mpako baza na lifúta moke.
- Kosalela bato makambo ya ndáko, na kotalela makambo neti mposo, lingómbá, ebosono, kozala na bana. Kende na Unité na biso ya Fair Housing.
- Matomba ya VA mpe kobongisa kobimisama. Kende na Unité na biso ya Basoda ya Kala.
- Makambo na tribinale ya bikolo mpe statut ya ekolo. Kende na unité na biso ya baí-mbóka.
- Makambo etali bokolongono/securité, basalere, mpe condition ya bomoi mpona basali-bilanga. Kende na unité na biso ya Basali-Bilanga.
Tokoki te kosalisa na:
- Makambo ya crime
- Kobuka mibéko na balabala
- Kozoka
- Toyambaka te mabyangi etali makambo ya Droit ya Libota. Tokipaka makambo ya Droit ya Libóta etali viole to kobeta na nzela ya relation ya speciale ya botindami na masanga locale oyo ebundelaka bato na Maine mobimba. Soki bazoviolé yo tó bazobeta yo na libóta, solola na misala wana mpo na koyeba masungi ya mibéko mpe mosusu oyo ekoki kozala disponible mpo na yo. Senga lisungi mpe lisalisi soki bazobeta yo na libota. Senga lisungi mpe lisalisi soki bazoviolé yo.
Nini ekosalema ntango obengi PTLA
Ezala ozwi lisungi na telefone tó na presentiel, etambe na biso ya liboso eza ya 'kozwa contact' na yo. Mosaleli na biso moko ya makambo ya mibéko akosolola na yo na nkuku mpona kozwa bansango na yo mpe koyaba nini ekomeli yo.
Mpo na koluka koyeba soki tokoki kosalisa, tokotuna yo mituna ebele. Tokotuna makambo etali:
- Likambo na yo ya juridique
- Nkómbó na yo mpe bankombo ya bato mosusu oyo yango etali
- Ba coordonnée na yo
- Salere mpe bozwi na yo
Tokotuna yo mituna etali libóta na yo, ata mpe mboka outa tó statut na yo ya kozala na mboka mopaya. Tokoyebisa te bansango na yo ya immigration na USCIS tó na ICE.
Ntango mosusu, tokokoka te kosalisa yo na makambo na yo ya mibéko. Mbala mosusu tokosalisa te mpo:
- Eza te na likambo ya mibéko oyo Pine Tree elandelaka
- Toza na conflit ya interet mpe malako ya bizaleli malamu ezopekisa biso na kosalisa yo
- Toza na bandelo etali banani tokoki kosalisa na kotalela salere mpe bozwi - mpe, soki oza likolo ya bandelo wana, mbala mosusu tokokoka te kosalisa yo.
- Bato mosusu oyo bapesaka biso mosolo bapesaka biso nzela kaka ya kosalisa bato oyo baza na statut moko boye ya kofanda na mboka mopaya - yango wana eza na bato oyo tokoki te kosalisa.
Soki okokisi masengami, tosenga bansango ebele etali likambo na yo ya mibéko. Ekozala malamu ozala elongo mikanda nyonso etali likambo na yo.
Nsima ya kozwa bansango toza na yango mposa, tokoluka koyeba soki tokoki kopesa yo toli tó soki tokosala mosala ebele mpona likambo na yo. Soki topesi yo toli, baavoka na biso bakosala na yo mpe avoka na yo mpo na kopesa yo batoli ya mibeko mpo na likambo na yo. Soki tokoki kosala mosala ebele mpo na likambo na yo, tokotinda yango na moko ya ba unité na biso epai wapi basali na biso bakosala elongo, mpe na yo, mpo na kosalisa yo na kosilisa likambo na yo. Moto moko ya unité akosolola na yo mpo na mposo moko, tó liboso na yango soki likambo na yo eza ya lombango mpenza.
Mpo na nini tozokoka te kozwa yo na telefone?
Toyebi ete mbala mosusu ekosenga ozela ntango molai na telefone. Tosalelaka etuka mobimba, mpe bato ebele baza na mposa ya lisungi na biso. Mbula nyonso, tolandelaka makambo koleka 6 000 kasi tozwaka masengi ya lisungi ya makambo koleka 10 000. Soki obengi na bangonga na biso ya mosala mpe okati telefone te, moto moko akoyamba mpe akosolola na yo likambo na yo. Mbala mingi, ntango ya kozela ezalaka moke na ebandeli mpe na nsuka ya mosala.
Kosolola na Pine Tree eza na libateli?
Toyebi ete ebongiseli ya juridique ekoki kozala mindondo mpe kobangisa - ekoki kozala mpasi na koyeba nani kotyela motema tó kondimela nini. Oyo mwa bansango etali biso, mpe oyo tosalaka oyo ekoki kosalisa yo na koyanola na motuna oyo:
- Lisungi ya mibéko ya Pine Tree eza te lisanga ya leta. Tozwaka mwa lisungi ya mosolo na biyangeli ya leta mpe ya federale, kasi elakisi te ete tosalaka mpo na bango. Tosalaka mpo na bakiliya na biso. Na makambo ebele, tozalaka bamonisi ya bato oyo baza na mikakatano na masanga ya leta.
- PTLA ekosenga yo mosolo te mpo na lisungi ya mibéko. Tokopesaka batoli mpe tozalaka bamonisi ya bato oyo bakokisi masengami ya kozwa misala na biso ya ofele. Ntango mosusu, ekoki kosenga bakiliya na biso bafuta mpo na makambo neti mbongo ya tribinale - kasi tokotikala kosenga yo te mbongo mpo batoli tó misala ya mibéko.
- Lokota bapesi-mosolo na biso mosusu basengaka yango, tokotuna yo mituna etali statut na yo na mboka mopaya. Tokotikala ata moke te kopesa bansango oyo na USCIS tó na ICE. Likambo ya mabe koleka oyo ekoki kosalema eza ete mbala mosusu tokokoka te kosalisa yo mpo na bipekiseli etali mosolo na biso. Mibeko etali makambo oyo eza mindondon makasi, kasi eza malamu kobenga biso olie ya kokanisa kaka ete tokoki te kosalisa yo kaka mpo na statut na yo na mboka mopaya.
- PTLA ekopesa yo ntango nyonso mobongoli lokota ya ofele. Yeba ebele na ntina ya balotomo na yo ya kozwa lisungi ya lokota na batribinale ya Maine.
- Tomemaka likambo moko te na tribinale mpe tokolobela likambo na yo na moto te, longola se soki tosololi nanu na yo mpe ondimi ete tosala yango.
- Soki ozobanga ete tozosalela yo te makambo malamu, tozali na procedure oyo epesaka bakiliya nzela ya kosala baplainte; bakoyoka baplainte wana mpe bakolzwa yango na liseki te. Tanga malako na biso etali reclamation ya bakiliya.
Oza na bakomantere mpo na site web na biso? Salela formulaire ya bakomantere ya sike web na biso mpo na koyebisa biso!